Bana ya Matadi basepelaki te na ndenge Koffi na basali na ye babandi miziki na retard.
Mokolo ya poso ya Noel, Koffi Olomide na basali na ye ya Quartier Latin bazalaki na production ya monene na mboka Matadi, na Bas Congo. Kasi, sango ekomeli biso ezalaki nde concours ya kobamba mabanga. Donki moto oyo akokoka kobamba Koffi nde akozua lokumu.
Ba ndeko ya Matadi basilikaki makasi po moto oyo bazalaki kozela ayaki na ngonga moko ya mosika. Akomaki na tango miziki esengelaki kobanda te. Azelisaki balanga nzembo na malili. Atekeli basali na ye ya Quartier Latin basepelisa batu.
Ndeko moko ya matadi alobaki kutu : « Nga nafutaki po namona ye Koffi ndenge akoyemba na mongongo na ye, azoya tangu nga nalingi nazonga ndaku. »
Likama ya boye esi ekomela Koffi mbala kama. Tokokanisa lisusu na Concert na ye ya Bruxelles na Palais du Midi, esengelaki abeta été passé. Kasi mindule ebandaki na retard. Yango wana batu babudaki ye. Na ndenge yango pe, atiaki prix ya billet talo makasi. Yango wana bato baboyaki kokota.
Na yango nazali kokamwa makasi. Ye moto azali kobengama Mopao Mokonzi. Est-ce que ayebi que biso, balanga nzembo nde tozali kosala bombongo na ye ? Azali ata na respect mokie pona public te. Po tozali kolanda miziki na ye, kosomba ba palaki, kotombola kombo na ye na miziki kitoko azali kosala. Kasi elobi te po lelo ye azali na mituka pe ba ndako ya minene akoki ko se permettre kosakana na public boye. Soki bana ya Matadi ba zongiseli eyano lolenge boye, elingi koloba que Mwana ya mama Amy asengeli kotala mentalité na ye malamu. Toboyi te azali moyembi monene. Kasi esengeli ayeba que kaka biso batu totomboli lokumu na ye, tokoki pe kokweyisa yango.
