Wana ezali maloba Mobutu abimiselaki biso na meeting na ye moko na stade. Soki toyokaki maloba wana ndenge esengelaki mbele tosila kobengana ye kala. Po biso nyonso tozalaki komona ndenge azalaki koboma mboka pe kobebisa avenir ya bana na biso. kasi tolobelanaki ete ‘TIKA KAKA’ nzambe ayebi.
Etat de droit ezali liboso ya l’etat des devoirs. Tozali na ba devoir vis-à-vis ya l’état mpe bakonzi na yango, kasi tobosana jamais que tozali pe na ba droit oyo esengeli tobotala na bakonzi.
Pona mbonguana ekoma na mboka na biso, esengeli biso tokotisa yango na makasi. Tosengeli kobunda pona kokotisa mbongwana na mboka ya bankoko na biso. Esebgeli ete kobanda lelo, kongolais nyonso ayeba ete mboka kongo ezali ya ye lolenge moko na ya bakonzi.
Yo fonctionnaire yeba ete, na tangu ozali kobebisa mosala na yo, pona kanda ya monyokoli ya moyibi ya bakonzi na yo. Moto oyo ozali koboma ezali bey o moko. Lolenge lolamu ya kosala soki omoni ete mokonzi na yo azali koboma mosala, funda ye na presse, ata na kobatama.
Biso na cultureK tozali ko lapa ndayi te tokofunda yo te kasi tokopanza makita, po mokonzi oyo ayebi mosala te azua litomba oyo esengeli.
Liteya wana ezali valable pona biso nyonso. Esengeli totika « TIKA KAKA » na « YO NDE OKOBONGISA ». Maloba wana nde libabe oyo tozali kobwakela mboka na biso. Moko na moko na kati na biso nde akobongisa mboka wana.
Pasteur Jean-Pierre Moka azali koloba ete jardin d’Eden ezalaki mpe ezali na Kongo na biso. Kasi kongolais azali kokufa nzala. Likolo ya ‘TIKA KAKA’ na ‘YO MOTO OKOBONGISA’. Esengeli toyeba que biso nde tokobongisa, moto mosusu te. Tokoki kozela Kaka bakonzi ya mboka babongisa te. Soki tosungi bango te, bakoki kosala eloko moko te . Pona kosunga bango esengeli tobanda na tango nyonso tosepeli te na eloko basali toyebisa bango, na ndenge oyo esengeli pona bayoka.
Bobanga te bobima na bala bala pona ko senga ba droit na bino na tangu nyonso oyo esengeli.
