Mukolo batu ya pusu bakoboya kobima, kinshasa ekokufa nzala!
Wana ezali liloba pona koyebisa ba oyo ba neglijaka batu ya pusu ke batika kosala bongo. Zando, ba wenze, ba zelo, pondu, mapa, bilamba, fufu, makala, masanga… Biloko nyonso wana ezali komemama na pusu. Ba mboka mingi ya kinshasa oyo nzela ekufa banda tango ya ba flamand ezuaka biloko ya koliya kaka na nzela ya batu ya pusu po motuka mosusu ekoki kokota kuna ezali te.
Na mboka oyo, mituka ezali mingi te, mpe mua moke oyo ezali etondi ba nkokoso. Mituka oyo tokoki kotiya motema ezali kaka be ba pusu pusu. Limba yango ezuaka ezali se lipa na café oyo mopusi akomela. Soki aleyi malamu akoki kosala ata 30 km na nzela ya pasi, na mikumba oyo ekoma tii na kilo nkama (100kg) Misusu kutu balekaka wana. Eloko moko te ezali na pusu ewutaka libanda ya mboka. Soki olingi pièce de rechange bakosalela yo yango, soki olingi pine, bakosalela yo yango, ata ya bibamba, kasi motuka ekotambola.
Kasi mopsal ya pusu ezali kondimama te. Pona nini? Po batu oyo basalaka yango bazali bangamba na miso ya batu. Na bakonzi, na biso batu oyo tosengaka bango mosala wana topesaka bango botosi te. Tozali kosala kaka neti bango babotama pona basalela biso mosala lokola ba esclave.
Lelo oyo toyoki lisolo ya mpasi na bango, na ndenge ba inspecteur bazali kosenga bango 300fc mikolo nyonso. Bazali komilela pona bango versement na bango ya mokolo ezalaka 800fc, soki bapesi inspecteur 300fc, elingi koloba ete mosala na bango ya mokolo ekotisi boni, mpe bango bakoleyisa bana na bango nini? Esengeli ete bakonzi ya mboka, bapesa bango statut moko boye. Soki bakobanda kofutisa mpaku epayi ya bakolo ba pusu pona bazua droit ya kosalela pusu na bango esengerli kofutisa bango. Kasi botikela biso batu ya pusu kimia, bazosala ebele pona mombongo ya mboka etambola mikolo nyonso…
