Papa Wemba na Koffi Olomide bayokani 76

Polémique ezalaki elengi, sik’awa esili. Tobanza que lisanga ekozala elengi koleka.

Tokoki koloba match esili, ba adversaires bapesani mbote. Mokolo ya lomingo ya le 9 janvier, Koffi Olomide akendaki bongo na mondule ya papa Wemba na bana na ye ya nouvelle Ecrita na dancing club un deux trois. Akendaki bongo kosangisa mongongo na ye na ya Vieux Bokul. Balanga nzembo oyo bazalaki wana bakamwaki mingi penza. Pona kosepelisa batu, Koffi ayembaki loyembo na ye ya Silivi, oyo ezali na palaki “Monde Arabe”.
Wemba pe, na ndenge yango, atiaki mwa vocal na kati ya nzembo wana. Lisanga oyo esalemi na nganda Un deux trois, ezali kolanda lisanga ya ba yembi nioso Bracongo a organisaki samedi.

Ekomi tangu ba yembi nioso ya Congo basangana, batika bitumba pe polémique pona koyemba se na kombo ya lisanga pe bolingo.

Kasi batu basusu bazali komona yango bongo te. « Ba kala trop te, bokomona, bakobebana lisusu », elobi basusu. Nde babakisi « Mbala boni bayokana pe babebana ? »
Toyoki pe Koffi na Wazekwa esengelaki basangani banda tango bazalaki na tournée na Mikili. Kasi ba emplois du temps na bango e permettaki yango te.

Awa lelo ba nduliste bakomi koyokana, elakisi que polémique esili. Soki polémique esili, mabanga pe ba jeton esili na ba nzembo. Kasi si tomesanaki na ba allure wana. Ebele bakomaki kaka kozela palaki moko ebima pona koyoka ndenge moyembi asakani na ba ninga. Soki bango nioso bayokani, nani akokoma adversaire ya nani ? Est-ce que évolution ekozala lisusu ? Na ndimi te, po bakobanda koyokana pona kotikala se na niveau moko. Ebongo ba fana bang ope basangani ? De toutes les façons, na feti tobinaka miziki nioso.

Tangu polémique ezalaki, tomonaki ndenge bayembi bazalaki kosala nioso pona koleka baninga. Etumba ezalaki kopesa bango posa ya kosala mosala kitoko koleka. Sik’ awa bayokani, tobanza que mosala ekopusana kaka liboso pona esengo na biso balandi.

Leave a Comment

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Scroll to Top