CultureK elongo na MABIKI basepeli kobakisa na kati ya esika www.culturek.net, eteni moko ya sika oyo ekokabola makanisi na monoko oyo ndambo monene ya bana ya congo balobaka malamu, totangi bongo LINGALA.
Kobanda bokutani na biso na ndeko Bienvenue Sene Mongaba, mokomi monene ya mikanda na lokota ya lingala. Tomona ete topesa ndingisa na batangi na biso mpe bakomi esika ya kobanda kokabola mayele na biso na lingala, na Internet.
Na eteni oyo ya esika www.culturek.net, tokotala mingi mingi makambu oyo etali boluki makoki ya kobima mpe kobimisa ekolo na biso mpe bandeko na biso na mikakatano oyo bazali konyokwama nango na mboka.
Tokokabola awa nde ba solution mpe ba tekinik. Masolo mpe makomi oyo ekobima na eteni oyo ya esika na biso culturek.net ekozala na lingala, pona batu oyo balobaka lingala. Tokolimbola eloko moko te na monoko mosusu. soki oyebi lingala te, kotungisa biso te. Zua nde nzela ya association MABIKI pona kolanda mayekoli oyo epesamaka kuna. Ndeko Bienvenu nde akosalisa yo na esengo nyonso!
Posa na biso ekozala ete, lobi to sima ya lobi, lingala ezua esika nango. Ezala lisusu soni te kozanga koloba français na Kongo. Tolingi ete na ba mboka nyonso oyo lingala elobamaka, moto akoka kosala nyonso na monoko wana, kelasi, université, mosala, nyonso. po na ndenge ndeko Bienvenue alobeli biso, lingala ezali pauvre ata moke te. Soki liloba ezal na lingala te tokoki kozua yango na monoko oyo ezali pe kokotisa yango na lingala.
Bolanda masolo tobeti na ye pona bolanda makanisi na ye malamu.
Nakosenga bino boluka kotanga ba mikanda mibale oyo akoma na lingala ezali elengi koleka fufu!
« Fwa Ku Mputu » mpe « Bokobandela »
