Bana ya Bruxelles babini sele na Werrason 121

Samedi 5 février, Werrason na bana na ye ya Wenge Musica Maison mère babetaki na Bruxelles. Batu bawutaki Belgique mobimba pona kosepela na Le Roi de la Forêt, pe komona Demukuse. Atalaku oyo batu nioso bazalaki kozela.

Thermomètre ezalaki kopesa 4°. Kasi batu babangaki malili te. Kobanda 20h00, mulongo ezalaki déjà molayi pona kokota na salle na kati ya commune ya Molenbeek. Na ba ngonga oyo batu nioso balalaka, avenue Delaunoy, pene ya Etangs Noirs etondaki mituka.

Lokito ebandaki na ba 2heures du matin. Céléo, atalaku fidèle ya Ngiama Makanda, asepelisi batu na mabina ya sele. Pona concert na bango ya liboso na Schengen depuis tournée oyo, spectacle esali na ndenge près de 2000 personnes bazalaki kozela.

Ba nzembo ebetami ezali na répertoire ya A la queu leu leu pe ya Alerte général. Werrason a présenter pe équipe na ye ya sika. Ba chanteur oyo azui kala mingi te. Bana ya Bruxelles basepeli na Bonbon Kojac, Eboa Lotin, Jitrois, Teka,…

Na ndenge pe bazalaki kozela yango, Demukuse, Atalaku ya sika ya maison mère, abinisi batu fuengi. Ezalaki test monene pona ye. Na mbala eleki, na mwa mobembo werra asalaki na Paris, Roi David azalaki te. Sik’awa, akosala tournée mobimba pe kobongi sa palaki ya sika.

Mondule ebandaki 2heures du matin, esili na 6h30. Tournée ya mbala oyo ekosala 6 mois. Ekozala pe tangu ya kosala album solo ya Werrason oyo alaki batu banda kala.

Leave a Comment

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Scroll to Top