FWA KU MPUTU 2160

Mokanda moko editions mabiki ebimisa kombo na yango « Fwa Ku Mputu ». Mokanda wana ezali lisolo ya moto moko alelaki poto bo liwa. Na yango moto yango asalaki nyonso oyo esengelaki pona kokokisa likanisi na ye wana. Mokanda wana ezali moko ya ndambo ya mikanda oyo ekomami na lingala. Mokomi ya mokanda yango ezali ndeko Bienvenu Sene Mongaba, mokóló éditions Mabiki.
Mokanda « Fwa ku Mputu » ezali lisolo moko oyo ezali kolakisa bosolo ya bomoyi ya bana ya cité na Kinshasa. Ezali mpe kolakisa motindo nini, bilenge basalaka pona komibokola na mpiaka to kriz oyo ezali kobeta mboka.
Kobenga misala oyo bilenge ya Kin basalaka pona kokangisa mbongo oyo bazali na yango posa « ko se debrouiller », ezali malamu te. Ezali kokitisa misala wana ntina. Ezali kobimisa yango lokola biloko moko ya pamba pamba. Nzoka nde, mosala ya zoba ezali te, mosala ya pamba ezali te. Na yango nakobongisa maloba na ngai.
Fwa Ku mputu ekataki ye kelasi pona koluka nzela ya poto, abandaki kosala misala nyonso oyo bazalaki kopesa ye, makasi kaka efuta ye mbongo. Akotaki pe na mombongo. Tango natangi mokanda oyo, namoni ete pasi ya bato na mboka na biso ezali makasi ndambu pona bakonzi, kasi ndambu mingi pe pona batu bazali kobunda pona biloko oyo ezangi tina.

Bokasi nyonso oyo muana mobali oyo apesi na koluka mbongo ya kokende poto, soki afandaki na mboka, akokaki kokende mosika. Bandeko mingi oyo basala ndenge moko na Fwa Ku Mputu pona kobima mboka, pe koya poto, baregretaka na tango bamonaka pasi ya kozwa mbongo na poto.
Na Kinshasa soki ozali kurajé okoki kokangisa na mbula moko kisangala ya mbongo moko oyo na poto atako ozwaka lifuti ya makasi, ezali pasi okangisa yango. Na poto mikumba eleki : kofutela ndaku, kofuta bafactures, kofuta transport, kolata, kofuta bampaku, nyonso wana nde esalaka ke kobomba mbongo na mopanzi po na kosala likambo ya monene esenga tango molayi koleka na Poto ke na Kin.
Kasi po na nini pasi ezalaka kaka na Congo?
Na Poto biloko nyonso oyo tofutaka na leta, ezongiselaka biso yango na ndenge mosusu. Soki ozali kobela, mutuelle ekofuta yo ata ozali kosala te. Soki pe mosala ekatani, leta ekofuta yo kisomele. Motuka soki ezwi likama, assurance akofuta yo mbongo pona kobongisa, na bisi soki ozui likama, assurance ya kompani ya transport ekofuta yo. Soki ozali na bana, leta ekofuta yo mbongo pona kolia na bango sanza nyonso…
Bomoni ete, ata ko na Poto mbongo na maboko boye etikalaka mingi te, kasi moto oyo asalaka, azali na kimia. Kasi na Congo lokola leta asila komilongola na ngambo, eloko moko bato bakoki kozela epai na ye ezali te. Ata ozali na mifuku (bamillions), soki ozoki pota na lokolo, soki bayibi yo mbongo, soki ozwi likama, soki ata obeli kosu kosu ya pamba oyo, okoki kokufela yango soki bapimeli yo visa!
Kozala na mbongo ezali garantie te, yango nde pasi ya mboka wana. Kotangisa bana, kopesa bango avenir ezali kaka pasi.
Na makambu nyonso wana nde esalaka ke atako poto ezali pasi, tokoki kopekisa Fwa Ku Mputu koluka nzela ya Poto te. Soki ofandaka na mboka oyo « CHANCE ezali ELOKO PAMBA » yeba ke « MALCHANCE pe ezali ELOKO PAMBA ».

Leave a Comment

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Scroll to Top