Polémique ezali na gout mingi ! 25

Mikol’oyo Kinshasa ekopema te na likambo oyo etali polemique. Na bakonzi bakomi kozua likambo ya polemique lokola likambo moko ya grave. Yango na esika « culturek » tozui bokasi na biso mibali pona koloba ete…

« Polémique ezali na goût te! » Ngai te mutu nalobi yango mais c’est le grand Mopao en personne. Banda miziki ya bakoko tii na lelo, kosuana pe bitumba ezalaka kaka kati ya ba nduliste, tango ya bawendo kosuana ezalaki, bokabuani pe ezalaki, soki totuni bakulutu bakoyebisa biso.

Ata na tango ya ba Zaïko Langa Langa, bokabwani ezalaki. Bokabwani wana nde eboti ba mangamba mingi oyo esepelisaka biso lelo, na misusu ebunga. Soki tozwi bilenge ya Wenge Musica, bokabwani na bango eboteli bisos mangomba ebele, oyo yang ope eboti mangomba misusu.

Na ndenge wana nde namakanisi na ngai, polemique to koswana na kati ya babeti miziki ezali motindo oyo basalaka pona bayebana. Biso public pona toyeba que Quartier Latin ezalaka kaka Koffi mutu asalaka banzembo te, il fallait que Felix Wazekwa abima na lingomba wana pe ayebisa biso te nzembo oyo tozalaki kokanisa que ezalaki ya Koffi ezalaka nango ya ye te. De même ye moko pe Mopao, tango bakamatanaki na Papa Wemba abimisaki que ba nzembo mingi ya ebandeli ya Viva La Musica, ye mutu atekelaki yango Wemba…

Pona biso public polémique ezali na goût po ez’o distraire biso na réalité ya bomoyi ya pasi oyo tozali komona na mboka na biso. Au moins bazosalela biso mua maboke moko boye. Muana asakanaka na eloko oyo azali nango. Soki balle eza te, akosala ata balle ya ba papier, pona kobeta. Alors ngai na lobi polémique eza na goût mingi pona biso public pe bapanzi sango. Bino ba nduliste nde il faut bo raisonner soki bozali na posa ya kosala miziki, to ya kolekisa tangu na bino na ba discussion moko inutile pona koyeba nani azali na mbongo mingi? Wana ezali likambu na bino.

Leave a Comment

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Scroll to Top