Mokili ndenge etambolaka ekabwanaka na biteni mibale. Kokabwana oyo nalingi nálobela lelo ezali boye : na mokili tozali na ndenge ya bato mibale : baoyo balobaka nini esengeli kosalama ná baoyo basalaka nini esengeli kosalama. Na ndenge oyo, ebele ya bato bazali na molongo lisusu te. Babungi na nzela.
Yo olobaka to osalaka ? Soki tokaboli mokili kati na baoyo balobaka pe baoyo basalaka, ngulupa ezongi. Wana ezali lisusu na moto akolongwa na molongo te. Okotuna ngai, ebongo baoyo, bafandaka nye ? Bazali na molongo te. Bango tokomona bango tango tokokabola mokili kati na baoyo balobaka ná baoyo bafandaka nye.
Mokili pe ekabwaná kati na baoyo bafandaka nye ná baoyo bakangaka minoko. Mokili ekabwaná kati na baoyo baliaka pe na baoyo baleisaka, oyo basengaka ná baoyo bapesaka, baoyo bakendeke liboso ná baoyo bakendeke liboso te.
Molongo ya kokabola mokili ezali molai.
Po na esika Congo na biso ezali lelo, tokabwani pe na ndenge ebele : baoyo bakanisaka ete lobiko na biso ekoúta na lisungi ya bato misusu pe ná baoyo bayebi ete lisungi na biso ekoúta kaka epai na biso moko. Congo ya Lumumba ekabwani kati na baoyo balobaka na baoyo basengaka nzela po báloba. Baoyo basalaka ná baoyo bazali kozela báselela bango.
Na esika oyo tokomi, tina ya kotanga bakombo to kofunda bana ya mama ezali te. Moko na moko na biso ayebi esika azali. Etelemeli eyebaná. Moto akokosa moninga azali te. Tókosa na biso bapaya, tólela miflato ya ndenge na ndenge, bosolo ezali moko. Moto akobongisa Congo ya Kimbangu ezali yo. Soki oboyi, to obangi to ozali kozela babongisela yo, malamu omibwaka na Mangenge to na Kwamutu, oleka mbeka epai ya bilima po baoyo bazali kosala bákende liboso.
Mboka ezali kokufa, yo ozali kobina. Olandisi kilometele kama ya mapolomi, ozali kozela badongolomiso báya kosalisa mama na yo na bokono azali na yango. Obelaka to boni ? Baloká yo to liboma nde etondisi molimo na yo na bolema oyo ozali na yango ? Oyo aloká yo akufá to boni ?
Baboti na yo banyokwamá po na koluka mbongo ya kokotisa yo kelasi. Mbika ná mbala ya kotokisa, mama na yo azalaká koteka na Wenze ya Matete, ya Makiso to ya Bukavu yango nde etindaká yo óleka Rond-point Ngaba. Lelo oyo okomi Ingénieur, obosani ete mabulu ya Kinsenso ezali na posa ya mayele na yo. Ozali kozela, bato na misolo bápesa yo po óbongisa balabala oyo esika mbika ebongisá yo ezalaká kotekama. Nzete oyo ebikisaká yo na nkoy na zamba, lelo po olangwe bangi na lotoko, olobi ókata yango. Bangi yango kaka yo moko nde omelaka yango ? Nyonso oyo bamelaka bangi, batimolaka mabulu na katikati ya bandako ? Olati kitoko, otamboli na motuka ya kitoko, yo wana otomboli mapeka, olobi na yo te. Na yo te, yo nani ?
Obaloli elongi sima, otali na mipanzi na yo, olobi yango Bienvenu Sene azali koloba na nani ? Nazali koloba na yo moto ozali kotanga makomi oyo. Eee ! na yo ko ! Bina suka te. Soki osilisi kobina, kende kolala. Tango okolamuka lobi, ndako esi eziki.
Kimpa Mvita, Ngongo Lutete, nyonso wana bakufá se pamba ? Okoki kokanisa ata ngonga moko te ete Congo ezali na posa ya mayele na yo ? Nini osi osali po na Congo ? Moto na moto, na esika azali akoki kosala po na Congo.
Oluki okokana na baoyo babetaká koko na yo fimbo. Olobi, bokoko na yo ezali bolema. Otelemeli yango. Koloka to nini ? Bakoko na yo bazalaká bilema yango wana baponaká mabele kitoko ya Congo po na kofanda ? Bolema elekaká bango yango wana batongaká ndako ya ndele na se ya moi ? Yo, po oleki mayele, yango wana okei kotia likolo ya ndako na yo manzanza ? Congo pe mboka ya moi ! Awa ko moi engali, yo wana oyei kozwa mopepe na se ya nzete ya manga te ? Miso elingi kokangama na pongi ozali kokoka te, likolo ya molunge. Molunge oyo, mayele na yo elutá ndelo etindaki yo ókende kotia manzanza likolo ya ndako ? Koko na yo oyo atiaká ndele likolo ya ndako nde elema. Yo nde nganga ya mayele ? Kinganga ya mayele na yo etindi yo óboya komela Congo Bololo po na kobika na malaria oyo ozali na yango. Mayele na yo, nde etindi yo ókende kosenga mbongo na libanda po na kosomba kinini. Kinini pe ya monyato, bana na yo basili na kokufa, Congo Bololo na zamba ! Okei na makolo, obuki, otokisi, omeli pe obiki na malali. Wana yo mayele, koko na yo nde zoba ? Yango oyo aloká yo akufá to boni ?
Na esika olelalelaka, mibwaka na Mangenge, bilima basepela, biso tófanda kimia. Mokili esalamá ndenge wana. Epai baoyo ya kolelalela, epai baoyo balongolá mai ya miso. Epai baoyo bazipá miso na maboko, epai baoyo batelemisá mito pe babandá kosala po na kolongwa na bobola. Ekobanda kaka na yo. Soki oboyi, mibwaka na mai ya Mukamba, to na Tanganyika, to na Ubangi, to na Mukali, luka mai oyo ezali pembeni ya esika ozali kolela, mibwaka, tótika koyoka mongongo na yo.
Mbongo oyo ozali kosenga, okomá bisengasenga, epai wapi oyoká, mboka moko ebongá likolo ya mbongo oyo bazalaká kosengasenga ? Osi oyoká ? Osi omoná ? Bápesa yo mbongo, oteki nini ? Bakoko balobá : « sanza nguma, na mokili, moto malamu azali te ». Ndenge nini bozoba ekoki kosimba yo misisa tii na kingo boye? Nábalela yo mwasi, nábotela yo bana, nábokolela yo bango nde olobi nazali moninga na yo? Nazali moninga na yo te. Ozali nde moombo na ngai. Ezalaka bongo.
Ofandeli saki ya fufu ná ya mayebo, ozali kolela nzala. Osepeli na bikedi mibale napesi yo. Oyebi esika bikedi yango eúti ? Si na saki ya fufu ya liboso ofandelaki pe otelemaki po basinga ya saki ekomaki kosuwa yo! Bolole!
