PEUPLE CONGOLAIS ATELEMI 339

Tokopesa longonya na ba Congolais nyonso oyo batelemi na mokolo ya lelo pona Congo.

Longonya na bana ya Kinshasa, Mbuji Mayi, Goma, Lubumbashi…

Longonya na bana ya Bruxelles, Paris, Londres, Genève, Allemagne, Danemark, Washington…
Peuple Congolais lelo alakisi na miso ya mokili mobimba ete pona mboka na ye, « BOKOBOMA BOKOLEMBA ».

Boboyi kopesa biso ba élections bolakaki? To voté na makolo na biso. Pe vote na biso ezali clair, BOKENDE, tolingi bino lisusu te.

Soki ekoki te tokobandela lisusu, kasi ya mbala oyo ekozala lisusu pacifique te, po bino bomibimisi ba mpomba kasi nde bokomona mpomba oyo aleki bino.

Mokili esali nyonso pona kokabola biso, kasi totelemi alima, totelemi na ngwi, tozongi sima te.

Tondimi mayi ya moto pe ya malili, tondimi gaz lacrymogène, tondimi bakanga biso, tondimi bazokisa biso, tondimi baboma biso.

Longonya na ba mama, longonya na ba tata, longonya na bilenge, Congo ekobosana bino te.

Boyeba ete oyo ezali kaka ebandeli ya etumba moko ya molayi, ekosila kaka tango Congo na Biso ekozonga na maboko na biso, ekosila kaka tango batu oyo ba zali kosalela bapaya bakolongwa na bibonga oyo bafandeli, pona kotika esika na bana mboka oyo tokotiya pona basalela biso ba élections ya solo.

Nkolo a batela, mpe a pambola CONGO MBOKA NA BISO.

Comprenez mon émotion…

Leave a Comment

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Scroll to Top